*Refrain :*
*Tâta yamba eh, mbuma ya misala mia nga eh, Oyo na memeli yô a eh!
Tâta yamba eh, pasi ya misala mia nga eh, Oyo na bonzeli yô a eh!
Yamba Tâta eh.*
1. Mbuma ewuti na mitoki mia ngaï na kobonzela yo.
Yamba mango eh, Tâta mpe pambola mango eh
Mpo ya lokumu na yo moko, Tâta eh.
2. Mbuma ewuti na mitoki mia ngaï na kobonzela yo.
Benisa mango eh, Tâta mpe pambola mango eh
Mpo ya lokumu na yo moko, Tâta eh.
3. Ba pasi na ngaï na bisengo bia ngaï na kobonzela yó.
Benisa bia ngo eh, Tâta mpe pesa ngaï makasi mpo ya kosalela baninga, Tâta eh.
4. Lipa ewuti na mitoki mia ngaï, na kobonzela yo.
Benisa mango eh Tâta mpe sala libonguana, Nzoto ya Christo, Tâta eh.
5. Vino ewuti na mitoki mia ngaï, na kobonzela yo.
Benisa mango eh Tâta mpe sala libonguana, Makila ma Christo, Tâta eh.
6. Ekolo na biso na Bakonzi ba biso, na kobonzela yo.
Benisa Bango eh, Tâta mpe pambola bango eh, mpo ya lokumu ya yo moko, Tâta eh.
0
commentaire
Vous n'êtes pas connecté, choisissez l'une des 2 possibilités pour soumettre votre commentaire :